Publicidade

Isaías 31

Mawa na bato oyo batalelaka Ejipito

1 Mawa na bato oyo bazali kokende

na Ejipito mpo na koluka lisungi,

oyo bazali kotia mitema na bampunda,

oyo bazali kotia elikya na bashar

mpo ete ezali ebele,

mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango,

kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele te

mpe balukaka lisungi epai na Yawe te !

2 Nzokande, Ye mpe azali na bwanya

mpe akoki koyeisa pasi ;

abongolaka maloba na Ye te.

Atelemelaka ndako ya bato mabe

mpe bato oyo basungaka bango.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-