10 Botala, Nkolo Yawe azali koya na nguya,
loboko na Ye ezali kopesa Ye makoki ya kokonza.
Botala, azali na lifuti elongo na Ye,
azali kotambola na lifuti na Ye.
11 Azali kobatela etonga na Ye
lokola mobateli bibwele :
kosangisa bana meme na maboko na Ye
mpe kokanga bango na tolo na Ye ;
kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi
oyo ezali nanu komela mabele.