28 Oyebi te ? Nanu oyoka te ?
Yawe azali Nzambe ya libela na libela,
azali Mokeli ya basuka ya mabele ;
alembaka te mpe apemaka te,
mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.
29 Apesaka makasi na bato oyo balembi
mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya.
30 Solo, bilenge bapemaka mpe balembaka,
bilombe batengaka-tengaka ;
31 basi bato oyo batiaka elikya na Yawe,
Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika :
bapumbwaka likolo lokola bampongo,
bapotaka mbangu mpe bapemaka te,
batambolaka mpe balembaka te.