Mobikisi Moko Kaka mpo na Isalaele
1 Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi,
Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi ;
Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele :
« Kobanga te, pamba te nasikolaki yo,
nabengaki yo na kombo na yo,
ozali ya ngai.
2 Tango okokatisa mayi monene,
nakozala elongo na yo ;
mpe tango okokatisa bibale,
ekozindisa yo te.
Tango okotambola kati na moto,
okozika te,
mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;