Mokangoli akoya
1 « Tala liloba oyo Yawe alobi
epai ya Sirisi, mopakolami na Ye,
oyo Yawe asimbi loboko na ye ya mobali
mpo na kokweyisa bikolo nyonso liboso na ye
mpe kolongola mikaba wuta na baloketo ya bakonzi,
mpo na kofungola bikuke liboso na ye
mpo ete bikuke yango ekangama te :
2 Nakotambola liboso na yo
mpe nakolalisa bangomba,
nakobuka bikuke ya bronze
mpe nakokata-kata bibende oyo bakangelaka yango.
3 Nakopesa yo bomengo oyo babomba na molili,
bozwi oyo batia na bisika ebombama,
mpo okoka koyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe ya Isalaele,
oyo abengi yo na kombo na yo.