1 Nani andimaki makambo oyo tosakolaki ?
Mpe epai ya nani loboko na Yawe emonisamaki ?
2 Pamba te akolaki liboso na Ye
lokola nzete ya moke,
lokola mosisa oyo ebimi na esobe ;
azalaki ata na kitoko to lokumu te
oyo ekokaki kobenda miso na biso ete etala ye ;
lolenge na ye ezalaki ata na eloko moko te
oyo ekokaki kosala ete tosepela na ye.
3 Bato batiolaki mpe basundolaki ye,
ye moto na pasi, amesana konyokwama.
Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi,
atiolamaki, mpe tondimaki ye te.
4 Solo, amemaki mokumba ya bokono na biso
mpe alataki pasi na biso kati na nzoto na ye ;
kasi biso, tokanisaki ete Nzambe nde abetaki ye,
apesaki ye etumbu mpe asambwisaki ye.
5 Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso,
banyokolaki ye mpo na masumu na biso ;
etumbu oyo ememelaki biso kimia
ekweyaki na nzoto na ye ;
mpe na nzela ya bapota na ye,
biso tobikisami na bokono na biso.