Pular para o conteúdo
Publicidade

Isaías 53

11 Sima na pasi ya molimo na ye,

akomona pole ya bomoi

mpe posa na ye ekokokisama.

Na nzela ya boyebi na ye,

Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele

mpe akomema masumu na bango.

12 Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene,

mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi,

pamba te akabaki bomoi na ye na kufa

mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato,

pamba te amemaki masumu ya bato ebele

mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.

Veja também