Publicidade

Isaías 53

5 Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso,

banyokolaki ye mpo na masumu na biso ;

etumbu oyo ememelaki biso kimia

ekweyaki na nzoto na ye ;

mpe na nzela ya bapota na ye,

biso tobikisami na bokono na biso.

6 Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme,

moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ;

bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso

na nzoto na ye.

7 Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi,

kasi atikalaki kofungola monoko na ye te

lokola mpate oyo bazali komema

na esika oyo babomelaka banyama,

lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale ;

akangaki monoko na ye.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-