Publicidade

Isaías 58

13 Soki obateli matambe na yo

ete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba,

mpe ete osala te mosala oyo yo olingi

na mokolo na Ngai ya bule ;

soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yo

mpe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe ;

soki opesi yango lokumu

na koboya kolanda nzela na yo moko,

kosala misala na yo moko

mpe kokoba na makambo oyo ezanga tina,

14 wana okozwa esengo na yo kati na Yawe

mpe nakomema yo na bisika ya likolo ya mokili,

nakoleisa yo wuta na libula ya Jakobi, tata na yo»

elobi Yawe.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-