Pular para o conteúdo
Publicidade

Ezayi 65

Likolo mpe mabele ya sika

17 Solo, nakokela likolo mpe mabele ya sika ;

makambo ya liboso, bakokanisa yango lisusu te,

ekomata ata lisusu na motema te.

18 Kasi bosepela mpe bozala tango nyonso na esengo

mpo na misala oyo nakokela,

pamba te nakokela Yelusalemi mpo ete ezala na esengo,

mpe bato na yango basepela.

19 Bongo nakosepela mpo na Yelusalemi

mpe mpo na bato na Ngai ;

makelele ya kolela mpe ya koganga ekoyokana lisusu kuna te.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também