Pular para o conteúdo
Publicidade

Ezayi 9:1-6

1 Bato oyo bazalaki kotambola kati na molili

bamoni pole makasi ;

ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi,

pole engengeli bango.

2 Okomisaki bango ekolo monene,

obakisaki esengo na bango.

Bazali kosepela liboso na Yo

ndenge basepelaka tango babukaka milona,

ndenge mibali basepelaka

tango bakabolaka bomengo ya bitumba.

3 Pamba te ekangiseli oyo ezalaki na likolo na bango,

nzete oyo ezalaki na mapeka na bango

mpe fimbu oyo na nzela na yango bazalaki konyokola bango,

Yo, obukaki yango lokola na mokolo ya kokweya ya Madiani.

4 Basapato nyonso ya basoda

oyo lokito na yango eningisaka mabele,

mpe bilamba nyonso oyo etondaki na makila,

ekobwakama na moto

mpo ete ezika makasi.

5 Pamba te mwana mobali moko abotami mpo na biso,

mwana mobali moko apesameli biso,

mpe bokonzi ezali na likolo ya mapeka na ye ;

bakobenga ye : Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya,

Tata ya seko, Mokonzi ya kimia.

6 Bokonzi na ye ekokende mosika penza,

mpe kimia na ye ekozala na suka te.

Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi,

akozala mokonzi ya mokili na ye,

akolendisa mpe akokamba yango

na bosembo mpe na boyengebene,

wuta na tango oyo kino libela na libela.

Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga,

akosala na bolingo makasi na Ye.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.