Oração
A oração é o fôlego da vida cristã. É conversa íntima com Deus, pedido de socorro, ação de graças e intercessão. Jesus ensinou seus discípulos a orar e praticou a oração constantemente.
O convite a orar
Jesus disse: pedi e recebereis, buscai e achareis, batei e abrir-se-vos-á. Deus convida seus filhos a orar com fé e persistência.
Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino ;
Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino ; pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.
Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango ?
Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.
Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.
Boye, Ngai nazali koloba na bino : Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino. Pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.
Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te. Alobaki :
— Kati na engumba moko, ezalaki na mosambisi moko oyo azalaki kotosa Nzambe te, mpe azalaki komemia bato te. Kati na engumba yango, ezalaki mpe na mwasi moko akufisa mobali ; azalaki koya mbala na mbala epai ya mosambisi yango mpo na koloba na ye : « Longisa ngai liboso ya monguna na ngai. » Wuta tango molayi, mosambisi yango aboyaki. Kasi suka na suka, amilobelaki : « Atako natosaka Nzambe te mpe namemiaka bato te, kasi lokola motungisi ya mwasi oyo akufisa mobali eleki ndelo, nakolongisa ye kaka, mpo ete akoba te koyaka tango nyonso kino kozangisa ngai kimia. »
Nkolo abakisaki :
— Boyoka maloba ya mosambisi mabe oyo ! Boni, Nzambe akolongisa te baponami na Ye, tango bagangaka epai na Ye butu mpe moyi ? Boni, akozelisa bango ? Nazali koloba na bino : akolongisa bango noki. Nzokande, ekozala ndenge nini tango Mwana na Moto akoya ! Boni, akokuta kondima kati na mokili ?
Yango wana nazali koloba na bino : eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama.
Yango wana nazali koloba na bino : eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama.
Yango wana nazali koloba na bino : eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama.
Orar em nome de Jesus
Tudo o que pedirmos em nome de Jesus, Ele fará, para que o Pai seja glorificado no Filho. A oração em seu nome tem autoridade.
Mpe nakosala nyonso oyo bokosenga na Kombo na Ngai, mpo ete Tata azwa lokumu kati na Mwana.
Mpe nakosala nyonso oyo bokosenga na Kombo na Ngai, mpo ete Tata azwa lokumu kati na Mwana. Soki bosengi Ngai eloko na Kombo na Ngai, nakosala yango.
Mpe nakosala nyonso oyo bokosenga na Kombo na Ngai, mpo ete Tata azwa lokumu kati na Mwana. Soki bosengi Ngai eloko na Kombo na Ngai, nakosala yango.
Soki bokowumela kati na Ngai, mpe maloba na Ngai ekowumela kati na bino, bosenga nyonso oyo bolingi, bokozwa yango.
Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.
Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.
Orar sem cessar
A Bíblia nos exorta a orar em todo tempo. A oração constante nos mantém conectados com Deus e nos fortalece espiritualmente.
bosambelaka na kolemba te ;
bosambelaka na kolemba te ;
Bozalaka na esengo tango nyonso ; bosambelaka na kolemba te ; bozongisaka matondi kati na makambo nyonso, pamba te yango nde mokano ya Nzambe mpo na bino kati na Yesu-Klisto.
Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso.
Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso.
Bozalaka na molende ya kosambela, bosenzelaka mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.
mpo na oyo etali elikya, bozalaka na esengo makasi ; mpo na oyo etali pasi, bokangaka mitema ; mpo na oyo etali mabondeli, bozalaka na molende ;
A oração do modelo
Jesus ensinou a oração do Pai Nosso como modelo. Ela cobre adoração, submissão, provisão, perdão, proteção e louvor.
Tala ndenge nini bosengeli kosambela :
‹ Tata na biso,
Yo oyo ozali kati na Likolo ;
tika ete Kombo na Yo ebulisama,
tika ete Bokonzi na Yo eya,
tika ete mokano na Yo esalema,
awa na mokili ndenge esalemaka kuna na Likolo !
Pesa biso, na mokolo ya lelo,
bilei na biso ya mokolo na mokolo ;
limbisa mabe na biso,
ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo basalaki biso mabe ;
komema biso na komekama te,
kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ;
[pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo
ezali ya Yo seko na seko.] ›
Yesu alobaki na bango :
— Tango bozali kosambela, boloba :
Tata,
tika ete Kombo na Yo ebulisama,
tika ete Bokonzi na Yo eya !
Pesa biso bilei oyo tosengeli na yango, mokolo na mokolo,
limbisa masumu na biso,
pamba te biso mpe tolimbisaka moto nyonso
oyo asalaka biso mabe ;
mpe komema biso na komekama te.
Tango bozali kosambela, bosalaka te lokola bato ya bilongi mibale oyo balingaka kosambela ya kotelema kati na bandako ya mayangani mpe na bisika oyo babalabala ekutana, mpo ete bato bamona bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.
Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
Tango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka ; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi.
Tango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka ; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi.
Tango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka ; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi. Bosalaka lokola bango te, pamba te Tata na bino ayebi posa na bino liboso ete botalisa Ye yango.
Oração eficaz
A oração do justo é poderosa e eficaz. Ore com fé, sem duvidar, pois quem duvida é como onda do mar levada pelo vento.
Yango wana, tika ete moko na moko ayambola masumu na ye epai ya moninga na ye, mpe tika ete moko na moko abondela mpo na moninga na ye, mpo ete bobikisama na bokono. Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa.
Yango wana, tika ete moko na moko ayambola masumu na ye epai ya moninga na ye, mpe tika ete moko na moko abondela mpo na moninga na ye, mpo ete bobikisama na bokono. Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa.
Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te. Kasi asengeli kosenga na kondima, na kotia tembe te ; pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai. Moto ya ndenge wana atia motema te ete akoki kozwa eloko kowuta na Nkolo : azali moto ya mitema mibale, moto oyo akangamaka na likanisi moko te na nyonso oyo asalaka.
Kasi asengeli kosenga na kondima, na kotia tembe te ; pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai.
Kasi asengeli kosenga na kondima, na kotia tembe te ; pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai. Moto ya ndenge wana atia motema te ete akoki kozwa eloko kowuta na Nkolo :
Bozali kolula biloko, kasi bozali kozwa yango te ; bokomi kino koboma bato. Botondi na zuwa, kasi bozali kolonga te kozwa oyo bozali koluka ; bokomi koswana mpe kobunda bitumba. Bozwaka te biloko oyo bozalaka na yango posa, pamba te bosengaka yango epai ya Nzambe te.
Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino !
Deus ouve e responde
Clama a mim e te responderei. O Senhor ouve os que clamam a Ele com sinceridade e responde com poder e fidelidade.
‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te. ›
‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te. ›
Boye bokobelela Ngai, bokoya epai na Ngai mpe bokobondela Ngai ; mpe Ngai nakoyoka bino.
Bokoluka Ngai mpe bokomona Ngai, soki boluki Ngai na motema na bino mobimba.
Mpo na Yo Nzambe,
bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona ;
mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.
Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye !
Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu !
Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye !
Mpe belela ngai na tango ya pasi ;
nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.
Nabelelaki Ye na monoko na ngai,
mpe lolemo na ngai ekumisaki Ye.
Soki nazalaki na masumu kati na motema na ngai,
Nkolo alingaki koyoka ngai te.
Soki nazalaki na masumu kati na motema na ngai,
Nkolo alingaki koyoka ngai te.
Nzokande, Nzambe ayokaki ngai,
ayokaki na bokebi libondeli na ngai.
Nalingaka Yawe, pamba te ayokaka
mongongo mpe mabondeli na ngai.
Ayokaki ngai ;
boye nakobelela Ye bomoi na ngai mobimba.
Basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai,
mitambo ya kufa ekangaki ngai.
Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona
mpe akomonana kati na nkembo na Ye.
Yawe amonaki pasi na bango,
tango ayokaki koganga na bango.
Akanisaki Boyokani oyo asalaki elongo na bango ;
mpe mpo na bolingo monene na Ye,
abongolaki mokano na Ye ya komonisa bango pasi.
Yawe azali pene ya bato nyonso
oyo babelelaka Ye,
ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo ;
Confiança nas promessas
Se pedimos algo segundo a sua vontade, Ele nos ouve. A confiança na oração vem de conhecer e confiar em Deus e suas promessas.
Mpe tala elikya oyo tozali na yango liboso ya Nzambe : soki tosengi eloko kolanda mokano na Ye, ayoki biso.
Mpe tala elikya oyo tozali na yango liboso ya Nzambe : soki tosengi eloko kolanda mokano na Ye, ayoki biso. Mpe soki toyebi ete ayoki biso, toyebi lisusu ete tozali na eloko oyo tosengi epai na Ye.
Mpe soki toyebi ete ayoki biso, toyebi lisusu ete tozali na eloko oyo tosengi epai na Ye.
Apesaka biso nyonso oyo tosengaka epai na Ye, pamba te totosaka mibeko na Ye mpe tosalaka makambo oyo esepelisaka Ye.
Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.
Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.
Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.
Nzokande, moto moko te akoki kosepelisa Nzambe soki azangi kondima, pamba te moto oyo azali kopusana pene ya Nzambe asengeli kondima ete Nzambe azali mpe afutaka bato oyo balukaka Ye.
Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.
Diversas formas de oração
A oração inclui adoração, intercessão, súplica e ação de graças. Levante mãos santas, ore pelos outros e clame em todo tempo.
Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi. Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.
Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.
Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino kolanda bomengo ya nkembo na Ye kati na Yesu-Klisto.
Yango wana nalingi ete mibali basambelaka na bisika nyonso, na kotombola maboko ya bule, na kanda te mpe na koswana te.
Yango wana nalingi ete mibali basambelaka na bisika nyonso, na kotombola maboko ya bule, na kanda te mpe na koswana te.
Mpo na yango, nabondelaki Nkolo mbala misato mpo ete nzube yango elongwa na nzoto na ngai. Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.
Ndenge moko mpe Molimo ayaka kosunga biso kati na bolembu na biso ; pamba te toyebi te kosambela na lolenge oyo esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te. Mpe Nzambe oyo akundolaka mozindo ya mitema ayebi makanisi ya Molimo, pamba te Molimo abondelaka mpo na basantu kolanda mokano ya Nzambe.
Ndenge moko mpe Molimo ayaka kosunga biso kati na bolembu na biso ; pamba te toyebi te kosambela na lolenge oyo esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te. Mpe Nzambe oyo akundolaka mozindo ya mitema ayebi makanisi ya Molimo, pamba te Molimo abondelaka mpo na basantu kolanda mokano ya Nzambe.
Nzokande, na esika ete atia tembe na elaka ya Nzambe mpe aboya kondima, kasi kondima na ye epesaki ye lisusu makasi koleka mpe azalaki kopesa Nzambe nkembo, wana andimisamaki makasi ete Nzambe azali na makoki ya kokokisa elaka na Ye.
Oração e perseverança
Persevere na oração. Mesmo quando parece que não há resposta, Deus está agindo. O que impossível aos homens é possível a Deus.
Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso,
Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso,
Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso oyo bokokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo bokofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.
Pamba te na esika oyo bato mibale to bato misato basangani na Kombo na Ngai, Ngai mpe nazali wana kati na bango.
Kasi lolenge oyo ya milimo mabe ebimaka kaka na nzela ya mabondeli mpe ya kokila bilei.]
Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye :
— Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.
Kasi, na bino oyo bozali koyoka Ngai, nalobi : Bolingaka banguna na bino mpe bosalelaka bayini na bino bolamu. Bopambolaka bato oyo balakelaka bino mabe, mpe bobondelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.
Simona, Simona, Satana asengi koyungola bino ndenge bayungolaka ble. Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.
Bango nyonso, na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kosambela elongo na basi, elongo na Mari, mama ya Yesu, mpe elongo na bandeko ya Yesu.
Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kosambela mpe kokumisa Nzambe na banzembo ; bakangami mosusu bazalaki koyoka bango.
Mbonge ya kufa efinaki ngai,
mpela ya libebi epesaki ngai somo,
basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai,
mitambo ya kufa ekangaki ngai.
Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe,
nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai.
Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye,
koganga na ngai mpo na kosenga lisungi
ekomaki kino na matoyi na Ye.
Telema, ganga na butu
ndenge bakengeli basalaka na butu ;
sopa motema na yo lokola mayi, na miso ya Nkolo,
tombola maboko na yo epai na Ye
mpo na bomoi ya bana na yo,
oyo bazali kokufa nzala na babalabala nyonso.
Tokota na mozindo ya kososola banzela na biso
mpe totala malamu etamboli na biso,
bongo tozonga epai na Yawe ;
totombola mitema mpe maboko na biso
epai ya Nzambe oyo azali na Lola mpe toloba :
« Ezala sik’oyo, » elobi Yawe,
« bozonga epai na Ngai na mitema na bino mobimba,
na kokila bilei, na mpinzoli mpe na kolela. »
Boluka Yawe wana akoki nanu komonana,
bobelela Ye wana azali nanu pene.
Nzokande oh Yawe, ozalaka Tata na biso ;
biso tozali lokola mabele oyo basalelaka bikeko,
bongo Yo, ozali lokola mosali mbeki ;
biso nyonso tozali mosala ya maboko na Yo.
Liboso ete babelela Ngai,
nakoyanola bango ;
mpe wana basilisi nanu koloba te,
nakoyoka bango.
Liboso ete babelela Ngai,
nakoyanola bango ;
mpe wana basilisi nanu koloba te,
nakoyoka bango.
Oh bato ya Siona, bino oyo bavandaka na Yelusalemi,
bokolela lisusu te.
Tango bokobelela Ye, akoyokela bino mawa ;
tango kaka akoyoka, akoyanola bino.
Tala liloba oyo Yawe, Mosantu ya Isalaele
mpe Mokeli na ye, alobi :
Boni, bino nde bato bokotuna Ngai
soki nakosala nini mpo na bana na Ngai
na mikolo oyo ekoya
to bino nde bato bokopesa Ngai mitindo
mpo na mosala oyo maboko na Ngai esali ?
Postura na oração
Ore no secreto, e o Pai que vê em secreto recompensará. A oração não precisa de muitas palavras, mas de coração sincero.
Batela kimia liboso ya Yawe
mpe talela Ye ;
kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye,
mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe.
Mpo na ngai, nabelelaka Nzambe,
mpe Yawe akobikisa ngai.
Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ;
libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai
ezali kati na Nzambe.
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.
Esengo na bato oyo babatelaka malako na Ye
mpe balukaka Ye na mitema na bango mobimba !
Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba ;
batela ngai mpo ete napengwa te
mosika ya mibeko na Yo !
Bino bato, kino tango nini bokoyokisa
nkembo na ngai soni ?
Kino tango nini bokomisepelisa
na makambo ya pamba
mpe bokolanda makambo ya lokuta ?
Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai,
yoka koganga na ngai
wana nazali kosenga lisungi,
pamba te nazali kobondela nde Yo.
Moto oyo akangi matoyi na ye
mpo na koboya koyoka mobeko,
libondeli na ye ekomaka nkele na miso ya Nzambe.
Suka ya makambo nyonso ekomi pene ; yango wana, botambola na bwanya mpe na mayele mpo ete bokoka kosambela.