Publicidade

Salmos 55

Libondeli ya moto oyo bateki

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi.

2 Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai,

komibomba te wana nazali kobelela Yo.

3 Yoka ngai mpe yanola ngai.

Kati na kolela na ngai, nakomi koyengayenga

mpe nazangi kimia,

4 mpo na maloba ya monguna na ngai

mpe kanda ya moto mabe,

pamba te bazali kokweyisela ngai misala mabe

mpe konyokola ngai na kanda.

5 Motema na ngai etondi na mawa,

mpe somo ya kufa ekangi ngai.

6 Nakomi kobanga mpe kolenga,

somo monene ekangi ngai.

7 Nakomi komilobela :

« Soki nazalaki ata na mapapu ya ebenga,

nalingaki kopumbwa mpo na koluka bopemi ;

8 nalingaki kokima mosika penza,

mpo na kokende kovanda ata na esobe.

9 Solo, na lombangu penza,

nalingaki kokende koluka ebombamelo

mpo na kokima mopepe makasi mpe ekumbaki»

10 Nkolo, bebisa mabongisi ya banguna na ngai

mpe kotisa mobulu kati na bango ;

pamba te, kati na engumba,

nazali komona mobulu mpe bokabwani.

11 Butu mpe moyi, ezali kotambola

na bamir na yango ;

misala mabe mpe ya kanza etondi kati na yango.

12 Banguya oyo ebebisaka ezali kosala kati na yango,

minyoko mpe lokuta ezali kosila te.

13 Soki monguna nde azalaki kofinga ngai,

nalingaki kokanga motema ;

soki ezalaki mpe moyini nde azalaki kotelemela ngai,

nalingaki komibomba mpo ete amona ngai te.

14 Kasi ezali yo, moto lokola ngai,

oyo otambolaka elongo na ngai,

molingami mpe moninga na ngai ya motema

15 oyo nazalaki kokabola elongo na yo,

pasi mpe basekele

tango tozalaki kokende

nzela moko na Tempelo ya Nzambe.

16 Tika ete kufa ekanga bango na mbalakata

mpe bakita ya bomoi kati na mboka ya bakufi ;

pamba te mabe etondi kati na bandako

mpe mitema na bango.

17 Mpo na ngai, nabelelaka Nzambe,

mpe Yawe akobikisa ngai.

18 Tongo, midi, pokwa,

nasopaka motema na ngai mpe nalelaka,

mpe ayokaka mongongo na ngai.

19 Akopesa ngai kimia, akokangola ngai

na bitumba oyo babundisaka ngai ;

pamba te bato oyo batelemeli ngai bazali ebele.

20 Nzambe ayokaka, akosambwisa bango penza ;

akonzaka mpo na libela na libela.

Babongolaka mitema te

mpe batosaka Nzambe te.

21 Abundisi balingami na ye,

abebisi boyokani na ye.

22 Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali,

nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ;

maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta,

nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.

23 Bwakela Yawe mokumba na yo,

akosunga yo ;

akotika te ete moto ya sembo akweya

mpo na libela.

24 Mpe Yo, Nzambe, okobwaka basopi makila

mpe bakosi kati na libulu ya libebi ;

bakokokisa ata kati-kati te

ya mikolo ya bomoi na bango.

Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-