Publicidade

Salmos 102

Libondeli ya moto na pasi

1 Libondeli ya moto na pasi, oyo abungisi elikya mpe azali kolela liboso ya Yawe.

2 Yawe, yoka libondeli na ngai !

Tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo !

3 Kobombela ngai elongi na Yo te,

wana nazali na pasi.

Yoka libondeli na ngai

na mokolo oyo nazali kobelela Yo ;

yanola ngai noki !

4 Pamba te mikolo ya bomoi na ngai ezali kolimwa

lokola molinga,

mikuwa na ngai ezali kozika

lokola makala ya moto.

5 Motema na ngai ebungisi elikya

mpe ezali komitungisa lokola matiti oyo bakati ;

mpo na yango, nakomi ata kobosana

kolia bilei na ngai.

6 Mpo ete naleli makasi,

natikali kaka na poso ya nzoto likolo ya mikuwa.

7 Nakomi lokola esulungutu ya esobe,

lokola esulungutu ya bisika oyo ebeba.

8 Pongi ekimi ngai ;

nakomi lokola ndeke oyo etikali yango moko

na likolo ya ndako.

9 Banguna na ngai batombokeli ngai,

bazali kofinga ngai tango nyonso

mpe bazali kosalela kombo na ngai

mpo na kolakela bato mabe.

10 Nakomi kolia putulu na esika ya bilei,

mpe komela mayi esangana na mpinzoli na ngai.

11 Mpo na kanda monene na Yo,

otombokeli ngai mpe obwaki ngai mosika.

12 Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokima lokola elili,

mpe nakawuki lokola matiti.

13 Kasi Yo Yawe, ozali Mokonzi

mpo na libela,

ozali Nzambe seko na seko.

14 Okotelema solo mpo na Siona,

pamba te ekomi tango ya koyokela yango mawa ;

tango oyo ekatama ekoki.

15 Pamba te biso basali na Yo, tosepelaka

na mabanga na yango,

mpe toyokelaka putulu na yango mawa.

16 Bikolo ekotosa Yawe,

mpe bakonzi nyonso ya mokili bakondima

nkembo na Yo.

17 Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona

mpe akomonana kati na nkembo na Ye.

18 Akoyanola libondeli ya bato

oyo babungisaki biloko,

mpe akondima mabondeli na bango.

19 Tika ete bakoma yango

mpo na ekeke oyo ekolanda,

mpo ete bikelamu ya sika ekumisa Yawe.

20 Wuta na Esika na Ye ya bule,

wuta na likolo, Yawe atalaki biso

awa na mokili

21 mpo na koyoka kolela ya bakangami

kati na boloko

mpe kokangola bato oyo bazwaki etumbu ya kufa.

22 Kombo ya Yawe ekokende sango

kati na Siona,

mpe masanzoli na Ye, kati na Yelusalemi

23 tango bato mpe bikolo bakosangana

mpo na kogumbamela Yawe.

24 Na bomoi na ngai, abukaki lolendo

ya makasi na ngai,

mpe akitisaki motango ya mikolo ya bomoi na ngai.

25 Nalobaki :

« Nzambe na ngai,

Yo oyo ozali na bomoi seko na seko,

koboma ngai te na kati-kati ya mikolo

ya bomoi na ngai !

26 Na kala, otiaki miboko ya mokili,

mpe maboko na Yo esalaki Likolo.

27 Bango, bakokufa ;

kasi Yo, okotikala seko na seko.

Nzoto na bango ekolemba lokola elamba ;

okobongola bango lokola kazaka, mpe bakolimwa.

28 Kasi Yo, ozali ndenge moko,

mibu na Yo ekotikala kosuka te.

29 Bana ya basali na Yo bakozwa esika ya kovanda,

mpe bakitani na bango bakowumela liboso na Yo»

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-