Publicidade

Salmos 4

Yawe apesaka kimia

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda.

2 Nzambe, bosembo na ngai,

soki nabeleli Yo, yanola ngai.

Kangola ngai na pasi,

salela ngai ngolu,

mpe yoka libondeli na ngai.

3 Bino bato, kino tango nini bokoyokisa

nkembo na ngai soni ?

Kino tango nini bokomisepelisa

na makambo ya pamba

mpe bokolanda makambo ya lokuta ?

4 Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko

mosali oyo azali sembo na miso na Ye ;

Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.

5 Soki bosiliki, bosalaka masumu te ;

soki bolali na mbeto,

bolukaka kososola makambo

mpe bovandaka kimia.

6 Bobonzaka bambeka kolanda mibeko

mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe.

7 Bato mingi bazali kotuna :

« Nani akomemela biso bolamu »

Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.

8 Tondisa motema na ngai na esengo

soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.

9 Nakolala mpe nakozwa pongi na kimia,

pamba te, Yo moko Yawe, osalaka

ete navanda na kimia.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-