1 « Bino nyonso oyo bozali na posa ya komela, boya,
boya na esika oyo mayi ezali ;
ezala bino oyo bozali na mbongo te,
boya kosomba mpe kolia ;
boya kosomba vino mpe miliki :
ezali ya ofele, ya kosomba na mbongo te !
2 Mpo na nini bozali kobebisa mbongo
mpo na bilei oyo etongaka nzoto te,
mpe kobimisa motoki
mpo na bilei oyo etondisaka te ?
Boyoka, boyoka Ngai mpe bolia bilei ya kitoko,
mpe bokosepela na biloko ya elengi.
3 Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai,
boyoka mpe bokozala na bomoi ;
nakosala boyokani ya libela elongo na bino,
boyokani oyo nalakaki Davidi,
na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.
4 Tala, nakomisaki ye motatoli na Ngai
na miso ya bato ya bikolo ebele,
mokambi mpe motambolisi ya bato.
5 Solo, okobenga bikolo oyo oyebi te,
mpe bikolo oyo eyebi yo te ekoya na lombangu epai na yo
mpo na Yawe, Nzambe na yo,
mpo na Mosantu ya Isalaele,
pamba te alatisi yo nkembo. »
6 Boluka Yawe wana akoki nanu komonana,
bobelela Ye wana azali nanu pene.