3 balobaka : ‹ Mpo na nini tokila bilei,
soki ozali komona na Yo yango te ?
Mpo na nini tomikitisa,
soki ozali koyeba na yo yango te ? ›
Nzokande, na mokolo na bino ya kokila bilei,
bozali kosala makambo oyo bolingi
mpe bozali konyokola basali na bino nyonso.
4 Kokila bilei na bino ezali kosuka na koswana mpe na bitumba,
bozali kobetana makofi na kanda nyonso ;
bozali kokila bilei te ndenge esengeli kozala
na mokolo oyo bozali kozela
ete mongongo na bino eyokana na likolo.
5 Boni, ezali penza kokila bilei oyo Ngai nalingaka,
mokolo oyo moto amikitisaka penza ye moko ?
Boni, ezali kaka kogumba moto
lokola nzete oyo ebotaka na mayi,
kolata bilamba ya saki mpe kolala na putulu ?
Ezali yango nde bino bozali kobenga kokila bilei,
mokolo oyo Yawe alingaka ?
6 Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka :
kokata minyololo ya masumu,
kofungola basinga ya ekangiseli,
kopesa bonsomi na mowumbu
mpe kobuka ekangiseli nyonso.