Publicidade

Paz

Por Bíblia Online

A paz é um dos frutos do Espírito e uma promessa central de Jesus: 'Deixo-vos a paz, a minha paz vos dou.' A Bíblia nos chama a buscar, cultivar e viver na paz de Deus.

A paz de Cristo

Jesus é o Príncipe da Paz. Antes de partir, prometeu aos discípulos uma paz que o mundo não pode dar nem tirar — paz sobrenatural em meio às tribulações.

Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !

Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !

Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.

Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.

Bokonzi na ye ekokende mosika penza,

mpe kimia na ye ekozala na suka te.

Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi,

akozala mokonzi ya mokili na ye,

akolendisa mpe akokamba yango

na bosembo mpe na boyengebene,

wuta na tango oyo kino libela na libela.

Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga,

akosala na bolingo makasi na Ye.

Yesu abimeli bayekoli zomi na moko

Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki :

Tika ete kimia ezala na bino !

Paz com Deus

Justificados pela fé, temos paz com Deus por meio de Cristo. Ele é a nossa paz, que derrubou a barreira e nos reconciliou.

Kimia elongo na Nzambe

Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto

Solo, azali Ye moko kimia na biso : atiaki bomoko kati na Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, akweyisaki mir ya bonguna oyo ezalaki kokabola bango, alongolaki Mobeko elongo na mitindo mpe malako na yango mpo na kokela, kati na Ye moko, moto ya sika na nzela ya Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, na kotia kimia,

mpe kozongisa, na nzela ya Klisto,

boyokani kati na Ye moko Nzambe mpe bikelamu nyonso,

ezala oyo ezali na mabele to mpe oyo ezali kati na Likolo,

na kotia kimia na nzela ya makila

oyo Mwana na Ye asopaki na ekulusu.

Epai na bino nyonso oyo, kati na Rome, bozali balingami ya Nzambe mpe bobengama mpo na kozala basantu :

Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !

Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !

Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !

A paz que excede o entendimento

A paz de Deus, que excede todo entendimento, guarda nosso coração e mente. Ela vem da confiança no Senhor e da entrega total a Ele.

Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi. Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.

Bosalela makambo nyonso oyo boyekolaki, bozwaki, boyokaki mpe bomonaki epai na ngai ; bongo Nzambe ya kimia akozala elongo na bino.

Bosalela makambo nyonso oyo boyekolaki, bozwaki, boyokaki mpe bomonaki epai na ngai ; bongo Nzambe ya kimia akozala elongo na bino.

Ndenge esila kokatama,

ye oyo akomitika epai na Yo,

okobatela ye na kimia, na kimia penza,

mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.

Ndenge esila kokatama,

ye oyo akomitika epai na Yo,

okobatela ye na kimia, na kimia penza,

mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.

Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango ; mpe bozongisaka matondi.

Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango ; mpe bozongisaka matondi.

Promotores da paz

Bem-aventurados os pacificadores, porque serão chamados filhos de Deus. A Escritura nos chama a buscar e promover a paz em todos os relacionamentos.

Esengo na bato oyo bayeisaka kimia,

pamba te bakobengama bana na Nzambe !

Esengo na bato oyo bayeisaka kimia,

pamba te bakobengama bana na Nzambe !

Lokola ekoki kosalema, mpe lokola bino nde bosengeli kopesa nzela, bozalaka na kimia na bato nyonso.

Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka bamoko mpe bamosusu kati na kondima.

Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to ya komela, kasi ezali nde likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu.

Kotambola na bomoi ya bosantu

Bolukaka kovanda na kimia elongo na bato nyonso mpe kotambola na bomoi ya bosantu, pamba te moko te akomona Nkolo soki azangi bosantu.

Kotambola na bomoi ya bosantu

Bolukaka kovanda na kimia elongo na bato nyonso mpe kotambola na bomoi ya bosantu, pamba te moko te akomona Nkolo soki azangi bosantu.

Solo,

moto nyonso oyo azali na posa ya kolinga bomoi

mpe kobika mikolo ya esengo

asengeli kobatela lolemo na ye mosika na mabe,

mpe bibebu na ye mosika na maloba ya lokuta ;

asengeli kokima mabe mpe kosala bolamu,

koluka kimia mpe kokoba na yango,

asengeli kokima mabe mpe kosala bolamu,

koluka kimia mpe kokoba na yango,

Batela lolemo na yo mosika na mabe,

mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.

Batela lolemo na yo mosika na mabe,

mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.

O fruto da paz

A sabedoria que vem do alto é pacífica. O fruto da justiça se semeia em paz por aqueles que cultivam a paz com mansidão.

Bato oyo bayeisaka kimia balonaka kati kimia mpe babukaka mbuma ya bosembo.

Bato oyo bayeisaka kimia balonaka kati kimia mpe babukaka mbuma ya bosembo.

Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.

Kasi mbuma ya Molimo ezali : bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima,

Mbuma ya bosembo ekozala kimia :

bosembo ekobota bopemi mpe bobatelami mpo na libela.

Moto moko te azalaka na esengo soki bapesi ye etumbu, pamba te epesaka mawa ; kasi sima na tango, etumbu ebotaka lokola mbuma, epai ya moto oyo bapesi yango : bomoi ya bosembo mpe ya kimia.

Paz interior e descanso

Aquietai-vos e sabei que Eu sou Deus. A paz do Senhor acalma tempestades, silencia medos e sustenta a alma em todo tempo.

Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili,

akataka batolotolo, abukaka makonga

mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.

Tondisa motema na ngai na esengo

soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.

Yawe apesaka bato na Ye makasi ;

Yawe apambolaka bato na Ye na nzela ya kimia.

Kasi bato oyo bamikitisa bakozwa mokili

lokola libula na bango mpe bakozala na kimia makasi.

Tala malamu moto oyo azangi pamela,

landela bomoi ya moto ya sembo ;

tango oyo ezali koya ezali kozela moto ya kimia.

Bato oyo balingaka mibeko na Yo

bazali bato na kimia monene,

mpe eloko moko te ekobetisa bango lisusu mabaku.

Bato oyo balingaka mibeko na Yo

bazali bato na kimia monene,

mpe eloko moko te ekobetisa bango lisusu mabaku.

Ngai, nazali moto ya kimia ;

kasi soki kaka nameki koloba na tina na kimia,

bango baponaka mbala moko bitumba.

Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale :

Tika makelele ! Vanda nye !

Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki.

Yesu alobaki na ye :

Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia mpe zwa lobiko kati na pasi na yo !

Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.

Anunciadores da paz

Como são formosos os pés dos que anunciam boas novas de paz! O evangelho é a mensagem de paz para todos os povos.

Mpe ndenge nini bakoki koteya soki batindami te ? Kolanda ndenge ekomama : « Tala ndenge ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu »

Nzambe akangolaka

Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba,

makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu,

ba-oyo batatolaka kimia,

ba-oyo bamemaka basango ya boboto,

ba-oyo basakolaka lobiko,

ba-oyo balobaka na Siona :

« Nzambe na yo azali Mokonzi »

« Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo,

mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka »

Bazalaki koloba :

« Tika ete apambolama,

mokonzi oyo ayei na Kombo ya Nkolo !

Kimia kati na Likolo,

mpe nkembo kati na bisika oyo eleki Likolo »

molende ya kopanza Sango Malamu ya kimia lokola sapato na makolo na bino.

O Deus da paz

Que o Deus da paz esteja com todos vocês. Ele nos santifica por completo e nos guarda irrepreensíveis para a vinda do Senhor.

Tika ete Nzambe ya kimia azala elongo na bino nyonso ! Amen !

Bambote

Tika ete Ye moko Nkolo na kimia apesaka bino kimia tango nyonso mpe na lolenge nyonso ! Tika ete Nkolo azala elongo na bino nyonso !

Mapamboli mpe bambote ya suka

Tika ete Nzambe ya kimia, Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Mobateli monene ya bameme, Yesu, Nkolo na biso, na nzela ya makila ya Boyokani ya seko,

Pamba te Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya kimia.

Ndenge esalemaka kati na Mangomba nyonso ya basantu,

‘ Tika ete Yawe apambola yo

mpe abatela yo !

Tika ete Yawe angengisela yo elongi na Ye

mpe apesa yo ngolu na Ye !

Tika ete Yawe amona yo

mpe apesa yo kimia ’ 

Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino» elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.

Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango ; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami.

Yawe akoteya bana na yo nyonso,

mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.

Bokobima na esengo,

mpe bakotambolisa bino na kimia ;

bangomba milayi mpe bangomba mikuse

ekoyemba nzembo ya elonga liboso na bino,

mpe banzete nyonso ya zamba ekobeta maboko.

Nzambe na ngai alobi :

« Kimia ezali te mpo na bato mabe»

Paz, santidade e unidade

A paz exige esforço: guardar a unidade do Espírito, evitar contendas e buscar a santidade. Sem paz e santidade, ninguém verá o Senhor.

bosalaka makasi mpo na kobatela bomoko ya Molimo na nzela ya kimia oyo esangisi bino.

bosalaka makasi mpo na kobatela bomoko ya Molimo na nzela ya kimia oyo esangisi bino.

Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.

Boyikanaka mpiko ; mpe soki moko azali na likambo ya kopamela moninga na tina na yango, bolimbisanaka. Bolimbisaka ndenge Nkolo alimbisaki bino.

Soki Yawe asepeli na nzela ya moto,

akoyokanisa ye na banguna na ye.

Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe,

mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi

koleka moto oyo abotolaka bingumba.

Koboya koswana epesaka moto lokumu,

kasi moto oyo azangi mayele amipesaka na yango.

Tika ete kimia mpe mawa ya Nzambe epesamela bato nyonso oyo bakobanda kotambola kolanda mobeko oyo, mpe epesamela Isalaele ya Nzambe !

Tika ete mawa, kimia mpe bolingo efuluka kati na bino !

Paz e fé

O Deus da esperança nos encha de paz e alegria no crer. Quem mantém o pensamento firme no Senhor experimenta paz perfeita.

Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.

Baposa ya nzoto ememaka na kufa, kasi baposa ya Molimo ememaka na bomoi mpe na kimia.

Baposa ya nzoto ememaka na kufa, kasi baposa ya Molimo ememaka na bomoi mpe na kimia.

Na bisika nyonso oyo balekelaka,

batikaka kaka libebi mpe pasi ;

bayebi nzela ya kimia te.

Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te

na miso na bango»

Kasi Yesu alobaki na mwasi yango :

Kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia !

Na ndako nyonso oyo bokokota, boloba liboso : « Tika ete kimia ezala na ndako oyo »

Soki amoni ete akokoka te, wana monguna na ye azali nanu mosika, akotindela ye bato mpo na kosenga kimia.

Soki bavandi ya ndako yango babongi na kimia yango, wana tika ete ewumela kati na bango ; soki te, wana tika ete ezonga epai na bino.

Bokanisa te ete nayaki mpo na komema kimia na mokili. Nayaki mpo na komema kimia te, kasi mopanga.

Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo : Bosepelaka ! Bolukaka kokoma bato ya kokoka, bolendisanaka bino na bino, bozalaka na likanisi moko, bobikaka bomoi na bino na kimia. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo.

mpo na kopesa pole na bato nyonso

oyo bavandi kati na molili mpe kati na elili ya kufa,

mpe mpo na kotambolisa makolo na biso

kati na nzela ya kimia»

Bongo yo, okokufa na kimia mpe okokundama sima na kimobange ya esengo.

tango ya kolinga mpe tango ya koyina,

tango ya bitumba mpe tango ya kimia.

Bayebi nzela ya kimia te,

mpe bosembo ezali na nzela na bango te ;

bakomisaka nzela na bango nyoka-nyoka,

moko te oyo akotambola na nzela yango

akotikala koyeba kimia.

Na mayele mabe na ye, akolonga kokosa bato ebele mpe akokoma na motema ya lofundu ; akoboma bato ebele oyo bazalaki na bango na kimia mpe akotelemela Mokambi ya bakambi, kasi akobebisama na nguya ya moto te.

Na tango ya kimia, akokota na makasi kati na bituka oyo etonda na bomengo mpe akokokisa makambo oyo ata moko te kati na batata to bakoko na ye batikala kosala : akobotola na makasi biloko mpe bomengo ya mokili, bongo akokabola yango epai na bato na ye ; akosala mabongisi ya kobundisa bingumba batonga makasi, kasi nyonso wana kaka ekowumela tango moke.

Tango makambo oyo ya somo ekoya,

bakoluka kimia kasi bakozwa yango te.

basakoli ya Isalaele oyo bazalaki kosakola na tina na Yelusalemi mpe komona bimoniseli ya kimia mpo na yango, nzokande kimia ezali na yango te, bazali lisusu te, elobi Nkolo Yawe’ 

« Boyokani na Ngai elongo na ye ezali boyokani ya bomoi mpe ya kimia, mpe nakopesa ye yango mpo ete atosa Ngai. Atosaki Ngai solo mpe azalaki kolenga liboso ya Kombo na Ngai.

Kasi soki ye oyo azali mondimi te alingi koboma libala, tika ete aboma na ye ! Na likambo ya boye, ndeko mobali to ndeko mwasi azali ya kokangama te. Nzambe abenga bino mpo na kobika bomoi kati na kimia.

Bongo mpunda mosusu ebimaki : ezalaki ya motane makasi. Motambolisi na yango apesamelaki nguya ya kolongola kimia na mokili mpe ya kosala ete bato babomana bango na bango. Mpe bapesaki ye lisusu mopanga moko ya monene.

Seja o primeiro
Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-29_22-07-56-