Pular para o conteúdo
Publicidade

Salmos 101

Komipesa mpo na kobundisa mabe

1 Nzembo ya Davidi.

Nakoyemba bolingo mpe bosembo ;

nakoyembela nde Yo, Yawe.

2 Nakolanda na bokebi nzela ya bato

oyo bazangi pamela.

Okoya epai na ngai tango nini ?

Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu

na motema ezangi pamela.

3 Nakotala eloko moko te ya mabe ;

nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima,

ekoki kokangama na ngai te.

4 Mosika na ngai, motema ya kilikili ;

naboyi kosala mabe.

5 Nakosala ete avanda kimia,

moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta

mpo na kobebisa lokumu ya baninga.

Nakokoka te kotala moto ya lolendo

mpe moto ya lofundu.

6 Nakopona nde bato ya sembo kati na mokili

mpo ete bavanda pembeni na ngai ;

moto na etamboli ezanga pamela

nde akozala mosali na ngai.

7 Kati na ndako na ngai, mokosi akovanda te ;

liboso na ngai, mokosi akotelema te.

8 Tongo nyonso, nakosala ete bato nyonso ya misala mabe

kati na mokili bavanda kimia ;

nakolongola na engumba ya Yawe

bato nyonso ya mabe.

Veja também