15 Mikolo ya bomoi ya moto ezali lokola matiti,
ebongaka lokola fololo ya bilanga ;
16 nzokande soki kaka mopepe ebeti yango,
ezalaka lisusu te,
mpe esika epai wapi ezalaki ebosani yango.
17 Kasi bolingo ya Yawe
mpo na bato oyo batosaka Ye,
mpe bosembo na Ye
mpo na bakitani na bango,
18 mpo na bato oyo babatelaka boyokani na Ye
mpe batosaka mibeko na Ye,
ezali ya libela na libela.