19 Yawe atia Kiti na Ye ya Bokonzi
kati na Likolo,
azali Mokonzi ya mokili mobimba.
20 Bopambola Yawe,
bino ba-anjelu na Ye nyonso oyo bozali na nguya
mpe botosaka mitindo na Ye.
21 Bopambola Yawe, bino mampinga na Ye nyonso
oyo bokokisaka mokano na Ye.
22 Bopambola Yawe, bino bikelamu na Ye nyonso,
kati na bisika nyonso ya Bokonzi na Ye.
Eh molimo na ngai, pambola Yawe !