8 Yawe ayokelaka bato mawa
mpe asalelaka bango bolamu,
asilikaka noki te mpe atonda na bolingo ;
9 azwaka biso makambo te tango nyonso,
abombaka kanda na Ye te mpo na libela ;
10 apamelaka biso te kolanda masumu na biso,
azongiselaka biso te kolanda mabe na biso.
11 Ndenge likolo etombolama mosika ya mabele,
ndenge wana mpe bolingo na Ye ezali monene
mpo na bato oyo batosaka Ye ;
12 ndenge este ezali mosika ya weste,
ndenge wana mpe abwakaka masumu na biso
mosika na biso.