4 Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ;
Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola.
Azali kotala bato nyonso ;
mpe miso na Ye ezali kososola mozindo
ya mitema na bango.
5 Yawe atalaka mozindo ya moto ya sembo,
kasi ayinaka makasi moto mabe
elongo na moto oyo asepelaka na mobulu.
6 Tika ete akweyisela bato mabe
makala ya moto, sofolo ya moto !
Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango.
7 Pamba te Yawe azali sembo,
alingaka bosembo.
Bato ya sembo bakomona elongi na Ye.