Pular para o conteúdo
Publicidade

Salmos 119

9 Ndenge nini elenge akoki kowumela

na nzela ya sembo ?

Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.

10 Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba ;

batela ngai mpo ete napengwa te

mosika ya mibeko na Yo !

11 Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai

mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.

12 Yawe, tika ete opambolama !

Lakisa ngai mitindo na Yo !

13 Na monoko na ngai, natangaka

mibeko na Yo nyonso.

14 Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yo

lokola nde nazali na bomengo nyonso.

15 Nakanisaka malako na Yo

mpe natambolaka na banzela na Yo.

16 Nasepelaka mingi na malako na Yo

mpe nabosanaka liloba na Yo te.

Veja também