Pular para o conteúdo
Publicidade

Salmos 12

Nzambe akokisaka bilaka na Ye

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe.

2 Yawe, sunga biso !

Pamba te bayengebene bazali lisusu te ;

bato ya kotiela motema bazali lisusu te

kati na bana na bato.

3 Bato nyonso bazali kokosana bango na bango,

bazali kolobana maloba ya sukali,

kasi mitema na bango ezali sembo te.

4 Tika ete Yawe aboma bato nyonso

oyo balobaka maloba ya sukali

mpe batondi na lolendo,

5 ba-oyo balobaka :

« Tokolonga na nzela ya lolemo na biso,

bibebu na biso ekolobela biso ;

nani akoluka kozala nkolo na biso »

6 Yawe alobi :

« Mpo ete bazali konyokola babola

mpe kolelisa bato oyo bakelela,

natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami»

7 Maloba ya Yawe ezalaka peto

lokola palata oyo balekisi na moto

mpe bapetoli mbala sambo.

8 Yo, Yawe, okobatela bato oyo bakelela,

okobikisa biso mpo na libela liboso ya bato mabe.

9 Bato mabe batambolaka na bonsomi bipai na bipai

soki bato bapesi bozoba lokumu.

Veja também