Publicidade

Salmos 122

Bosambela mpo na kimia ya Yelusalemi

1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Nasepelaka tango balobaka na ngai :

« Tokende na Tempelo ya Yawe »

2 Yelusalemi, makolo na biso etelemi

na bikuke na yo !

3 Yelusalemi, engumba oyo etongama malamu ;

engumba oyo biteni na yango ekangana esika moko.

4 Ezali kuna nde mabota ekendaka, mabota ya Yawe,

kolanda mibeko kati na Isalaele,

mpo na kosanzola Kombo ya Yawe.

5 Pamba te bakiti ya bokonzi ya bato

oyo basalelaka bosembo ezali kuna,

bakiti ya bokonzi mpo na ndako ya Davidi.

6 Bosenga kimia ya Yelusalemi !

Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi,

babika na kimia !

7 Tika ete kimia ezala kati na yo

mpe kati na bandako na yo ya bokonzi !

8 Likolo ya bolingo na ngai

mpo na bandeko mpe balingami na ngai,

nalobi : « Tika ete kimia ezala kati na yo »

9 Likolo ya bolingo na ngai

mpo na Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso,

nasengi bolamu mpo na yo.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-