Publicidade

Salmos 126

Tango ya kolona mpe tango ya kobuka

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Tango Yawe azongisaki bato ya Siona

longwa na bowumbu,

tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.

2 Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo.

Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo :

« Yawe asaleli bango makambo minene »

3 Solo, Yawe asaleli biso makambo minene,

mpe tozali kosepela.

4 Yawe, yaka kobongisa makambo na biso

ndenge kaka otondisaka lisusu miluka ya Negevi.

5 Bato oyo balonaka na mpinzoli

babukaka na banzembo ya esengo.

6 Moto oyo akendaka na kolela,

tango amemi milona na ye,

azongaka na esengo

wana amemi maboke na ye.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-