Publicidade

Salmos 139

13 Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai,

obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.

14 Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.

Misala na Yo ezali ya kokamwa ;

ngai, nayebi yango malamu.

15 Na miso na Yo, nzoto na ngai ezalaki ya kobombama te

tango osalaki ngai na esika ebombama,

tango otongaki ngai kati na mozindo ya mabele.

16 Tango nazalaki nanu na lolenge te,

ozalaki komona ngai ;

mpe omikomelaki kati na buku na Yo

mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai

liboso ete moko te kati na yango ezala.

17 Oh Nzambe, tala ndenge ezali pasi mpo na ngai

kososola makanisi na Yo !

Tala ndenge motango na yango ezali ebele !

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-