7 Nakende wapi mpo na kokima Molimo na Yo ?
Nakima wapi mpo na kozala mosika na Yo ?
8 Soki namati na likolo, ozali kuna ;
soki nakeyi na mboka ya bakufi, ozali lisusu kuna.
9 Soki nazwi mapapu ya lipekapeka
mpo na kokende kovanda mosika ya ebale monene,
10 kuna mpe loboko na Yo ekotambolisa ngai,
loboko na Yo ya mobali ekosimba ngai makasi.