Pular para o conteúdo
Publicidade

Salmos 14

Mokili ezali ya kobeba

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

Bazoba bamilobelaka :

« Nzambe azali te»

Makanisi na bango esila kobeba,

basalaka makambo ya nkele,

mpe moko te asalaka bolamu.

2 Wuta na Likolo, Yawe atalaka bato

mpo na koluka koyeba

soki ezali ata na moko oyo azali na mayele,

oyo atalelaka Nzambe.

3 Bango nyonso babunga nzela,

bango nyonso bamibebisa ;

moko te asalaka bolamu,

ata moto moko te !

4 Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ?

Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa,

babelelaka Yawe te !

5 Somo monene ekangi bango,

pamba te Nzambe azali kati na bato ya sembo.

6 Bino, bato ya misala mabe, bobebisaka mabongisi ya mobola

kasi Yawe azali ebombamelo na ye.

7 Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona !

Tango Yawe akobongisa bato na Ye,

bakitani ya Jakobi bakosepela, mpe Isalaele ekozala na esengo.

Veja também