Pular para o conteúdo
Publicidade

Banzembo 142

Ozali ekimelo kaka moko mpo na ngai

1 Nzembo ya Davidi. Maloba na ye tango azalaki kati na ebombamelo ya mabanga.

2 Na mongongo makasi, nazali koganga epai na Yawe ;

na mongongo makasi, nazali kobondela Yawe.

3 Natalisi likambo na ngai liboso na Ye,

natandi pasi na ngai liboso na Ye.

4 Soki molimo na ngai elembi kati na ngai,

Yo oyebi epai nazali kokende.

Batieli ngai motambo na nzela oyo nazali kotambola.

5 Bwaka miso na ngambo ya loboko ya mobali mpe tala !

Moto ata moko te ayebi ngai lisusu,

nazali lisusu na ekimelo te,

moto ata moko te azali komitungisa na tina na ngai !

6 Yawe, nagangi epai na Yo !

Nalobi : « Ozali ebombamelo na ngai,

libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi »

7 Yoka koganga na ngai,

pamba te nazali na pasi makasi !

Kangola ngai wuta na maboko ya banyokoli na ngai,

pamba te baleki ngai na makasi.

8 Bimisa ngai na boloko

mpo ete nasanzola Kombo na Yo !

Bato ya sembo bakoya kozingela ngai

sima na Yo kosalela ngai bolamu.

Veja também