8 Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo,
pamba te natia elikya na ngai kati na Yo.
Lakisa ngai nzela ya kolanda,
pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo.
10 Lakisa ngai kosala mokano na Yo,
pamba te ozali Nzambe na ngai.
Tika ete Molimo malamu na Yo atambolisa ngai
na mabele oyo ezanga mabaku !
11 Yawe, mpo na lokumu ya Kombo na Yo,
bikisa bomoi na ngai !
Na bosembo na Yo, longola bomoi na ngai kati na pasi.