8 Yawe atonda na ngolu mpe na mawa,
asilikaka noki te mpe atonda na bolingo.
9 Yawe azali malamu mpo na bato nyonso,
atonda na mawa mpo na bikelamu na Ye nyonso.
10 Yawe, misala na Yo nyonso ekumisaka Yo !
Tika ete bayengebene na Yo bapambola Yo !
11 Bazali koloba ete bokonzi na Yo etondi na nkembo
mpe bazali kopanza sango ya misala ya nguya na Yo.
12 Bazali koyebisa bato misala na Yo ya minene
mpe kongenga ya nkembo ya bokonzi na Yo.