Yawe alingaka bato na Ye
1 Bokumisa Yawe !
Boyembela Yawe nzembo ya sika,
bokumisa Ye na banzembo kati na mayangani ya bayengebene !
3 Tika ete bakumisa Kombo na Ye na mabina ;
tika ete babetela Ye bambunda mpe mandanda !
4 Pamba te Yawe asepelaka na bato na Ye,
alatisaka babola motole ya elonga.
5 Tika ete bayengebene na Yawe basepela
kati na lokumu oyo ;
tika ete bayemba na esengo na bambeto na bango !