Natondi Yo mpo ete okangoli ngai
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, mosali na Yawe. Ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo.
2 Oh Yawe, makasi na ngai, nalingaka Yo.