Pular para o conteúdo
Publicidade

Salmos 19

Bimoniseli mibale ya Nzambe

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

2 Likolo etatolaka nkembo ya Nzambe,

mapata elobaka misala na Ye.

3 Mokolo moko na moko eyebisaka yango

epai ya mokolo oyo elandaka,

mpe butu moko na moko eyebisaka yango

epai ya butu oyo elandaka.

4 Ezali na nzela ya lisolo te,

na nzela mpe ya maloba te

oyo mingongo na yango eyokanaka te.

5 Nzokande, sango na yango eyokanaka na mokili mobimba,

maloba na yango ekomaka kino na suka ya mokili.

Na likolo, Nzambe atie ndako ya kapo mpo na moyi.

6 Moyi yango ebimaka na tongo

ndenge elenge mobali oyo abali sika

abimaka na shambre na ye,

mpe ndenge elombe atambolaka

na elikya ya kolonga na momekano.

7 Moyi ebimaka wuta na songe moko ya likolo,

mpe esukisaka mobembo na yango na songe mosusu ;

eloko moko te ezangaka kozwa molunge na yango.

8 Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka,

epesaka biso lisusu nguya ya kozala na bomoi.

Maloba na Ye nyonso ezali ya solo,

ebongi na kotiela yango elikya,

mpe epesaka bwanya epai ya zoba.

Veja também