7 Solo, okomisi ye etima ya mapamboli ya seko na seko ;
okomisaki ye moto ya esengo na miso na Yo.
8 Mokonzi atiaka elikya na Yawe,
aninganaka te mpo na bolingo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
9 Loboko na Yo ekokanga banguna na Yo nyonso ;
loboko na Yo ya mobali ekokanga bayini na Yo.