Publicidade

Salmos 24

Yawe akoti na Tempelo

1 Nzembo ya Davidi.

Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango

ezali ya Yawe.

Mokili mpe ezali ya Yawe,

elongo na bavandi na yango.

2 Pamba te ezali Yawe nde atia yango

na likolo ya bibale minene

mpe apikaki yango na likolo ya miluka.

3 Nani akokoka komata ngomba ya Yawe ?

Nani akokoka kotelema kati na Esika na Ye ya bule ?

4 Ezali moto oyo azali maboko pembe mpe motema peto,

oyo atiaka elikya te na banzambe ya bikeko

mpe alapaka ndayi ya lokuta te.

5 Yawe akopambola ye ;

mpe Nzambe, Mobikisi na ye, akokomisa ye sembo.

6 Ndenge wana nde ezali,

ekeke ya bato oyo bakangamaka na Yo,

ba-oyo balukaka elongi na Yo, Nzambe ya Jakobi.

7 Bino bikuke, botombola mitondo na bino !

Bino bikuke ya kala, bomitombola !

Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !

8 Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ?

Ezali Yawe, Elombe ya nguya ;

Yawe, Elombe ya bitumba.

9 Bino bikuke, botombola mitondo na bino !

Bino bikuke ya kala, bomitombola !

Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !

10 Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ?

Ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga,

nde azali Mokonzi ya nkembo !

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-04_23-13-58-