2 Tango bato mabe babundisaka ngai
mpo na koluka kosala ngai mabe,
ezali bayini mpe banguna na ngai
nde baninganaka mpe bakweyaka.
3 Ata limpinga ezingeli ngai,
motema na ngai ekobanga soki moke te ;
ata etumba etelemi mpo na koboma ngai,
atako bongo, nakozala kaka na elikya makasi.