Yawe Abikisaka
1 Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye.
2 Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni !
Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai !
3 Ebele bazali koloba na tina na ngai :
« Nzambe akobikisa ye te ! »
4 Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai,
Yo nde omatisaka lokumu na ngai.
5 Nabelelaka Yawe,
mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule.
6 Nalalaka mpe nazwaka pongi ;
nalamukaka lisusu,
pamba te Yawe azali makasi na ngai.