Publicidade

Salmos 3

Yawe Abikisaka

1 Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye.

2 Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni !

Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai !

3 Ebele bazali koloba na tina na ngai :

« Nzambe akobikisa ye te »

4 Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai,

Yo nde omatisaka lokumu na ngai.

5 Nabelelaka Yawe,

mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule.

6 Nalalaka mpe nazwaka pongi ;

nalamukaka lisusu,

pamba te Yawe azali makasi na ngai.

7 Nakobanga te atako ebele ya bankoto

bazingeli ngai na bangambo nyonso.

8 Yawe, telema !

Nzambe na ngai, kangola ngai !

Beta banguna na ngai nyonso bambata,

buka bato mabe minu.

9 Kokangolama na ngai ewutaka na Yawe.

Tika ete lipamboli na Yo ewumela

kati na bato na Yo.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-