Pular para o conteúdo
Publicidade

Banzembo 30:1-12

Yawe azongisi ngai na bomoi

1 Nzembo ya Davidi mpo na libulisi ya Tempelo.

2 Yawe, nanetoli Yo,

pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo

mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai.

3 Yawe, Nzambe na ngai, nabelelaki Yo

mpo na kosenga lisungi,

mpe obikisaki ngai na bokono.

4 Yawe, obimisaki ngai na mboka ya bakufi,

obatelaki bomoi na ngai

mosika na bato oyo bazali kokita na libulu.

5 Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe,

bino babulami na Ye ;

bokumisa Kombo na Ye ya bule.

6 Pamba te kanda makasi na Ye ewumelaka

mpo na mwa tango moke,

kasi ngolu na Ye ewumelaka seko na seko ;

kolela ekoki kowumela kino na pokwa,

kasi kosepela ekokota na tongo.

7 Tango nazalaki na kimia, nalobaki :

« Nakotikala kokweya te. »

8 Yawe, tango osalelaki ngai ngolu,

olendisaki ngomba na ngai ;

kasi tango obombelaki ngai elongi,

nabungisaki elikya.

9 Yawe, nabelelaki Yo ;

nabelelaki Yawe mpo na kosenga lisungi :

10 « Litomba nini ezali soki nakufi,

soki nakiti na libulu ?

Boni, putulu ekokumisa Yo ?

Boni, ekosakola boyengebene na Yo ?

11 Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu ;

Yawe, zala lisungi na ngai. »

12 Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ;

olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.