Natie elikya na ngai kati na Yawe
1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
2 Eh Yawe, kati na Yo nde nazwa ebombamelo ;
kondima te ete nayoka soni !
Bikisa ngai na bosembo na Yo !
3 Yoka ngai mpe kangola ngai noki !
Zala mpo na ngai libanga oyo ezingelami na bamir
mpe ndako batonga makasi mpo na kobikisa ngai.
4 Mpo ete ozali libanga na ngai
mpe ndako na ngai ya makasi,
kamba mpe tambolisa ngai
mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
5 Bikisa ngai na motambo oyo batieli ngai,
pamba te ozali ebombamelo na ngai.