Pular para o conteúdo
Publicidade

Banzembo 32:1-5

Bolimbisi epesaka esengo

1 Nzembo ya Davidi.

Esengo na moto oyo mabe na ye elimbisami,

mpe masumu na ye elongwe !

2 Esengo na moto oyo Yawe atangelaka lisumu te,

mpe atambolaka na lokuta te.

3 Lokola nazalaki kondima mabe na ngai te,

nazalaki tango nyonso kolela mpo na pasi.

4 Butu mpe moyi,

loboko na Yo ezalaki kofinafina ngai ;

makasi na ngai ekomaki kosila

ndenge makasa ekawukaka na eleko ya moyi.

5 Tango nandimaki masumu na ngai

mpe nabombaki mabe na ngai te,

nalobaki : « Nakotubela

masumu na ngai liboso ya Yawe. »

Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.