Yawe, mokangoli na ngai
1 Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki.
2 Nakopambola Yawe tango nyonso,
nakokumisa Ye mikolo nyonso na bibebu na ngai.
3 Tika ete bomoi na ngai emikumisa kati na Yawe ;
tika ete banyokolami bayoka mpe basepela !