7 Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe,
mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi.
Yawe, obikisaka bato mpe banyama.
8 Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya !
Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.
9 Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo,
mpe omelisaka bango mayi
kowuta na bolingo monene na Yo.