3 Na nguya na Yo, obenganaki bikolo
mpe otiaki bakoko na biso ;
obetaki bikolo ya bapaya
mpe ofulukisaki bakoko na biso.
4 Pamba te ezalaki na mopanga na bango te
nde babotolaki mokili,
ezalaki mpe maboko na bango te
nde ebikisaki bango ;
kasi ezalaki nde loboko na Yo ya mobali,
nguya na Yo mpe pole ya elongi na Yo,
pamba te ozalaki kolinga bango.