Nzambe azali ekimelo na biso
1 Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.
2 Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo,
azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.
3 Yango wana, tobangaka te ata soki mabele eningani,
bangomba ekweyi kati na ebale monene ;
6 Nzambe azali kati na yango, ebukani te ;
Nzambe asungaka yango wuta na tongo makasi.
10 Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili,
akataka batolotolo, abukaka makonga
mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.