Publicidade

Salmos 47

Bobetela Nzambe maboko

1 Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

2 Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko !

Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.

3 Tala ndenge nini Yawe,

Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo !

Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.

4 Atiaki bikolo na se na biso,

mpe mabota na se ya bokonzi na biso.

5 Aponelaki biso libula na biso,

oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye.

6 Nzambe amataki kati na koganga ya esengo ;

Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo.

7 Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe,

boyemba mpo na lokumu na Ye.

Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso,

boyemba mpo na lokumu na Ye.

8 Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba ;

boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.

9 Nzambe akonzaka bikolo nyonso ;

Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule.

10 Bato minene ya bikolo basangani,

lokola bato ya Nzambe ya Abrayami,

pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe ;

atombwama makasi.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-