Pular para o conteúdo
Publicidade

Banzembo 51

4 Sukola ngai mobimba

mpo na kolongola mabe na ngai,

mpe petola ngai na masumu na ngai.

5 Pamba te nayebi mabe na ngai,

mpe masumu na ngai ezalaka

tango nyonso liboso na ngai.

6 Epai na Yo, epai na Yo kaka,

nasali masumu mpe mabe na miso na Yo.

Boye, okozala sembo tango okozwa mokano,

mpe okozala na pamela te tango okokata makambo.

7 Solo, nabotamaki kati na lisumu ;

wuta na libumu ya mama na ngai,

nazali mosumuki.

8 Nzokande Yo, osepelaka na bosembo,

ata kati na libumu ;

mpe okoteya ngai bwanya

kati na esika ebombama.

9 Petola ngai na nzela ya izope,

mpe nakokoma peto ;

sukola ngai, mpe nakokoma pembe

koleka mvula ya pembe.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também